Devenez publicateur / Créez votre blog


 

Conte Lingala_français: KOTAMBOLA BO NTABA TE/La chèvre, le boa et l'antilope

  Culture & Loisirs

LÌSÀPÒ Ó NGÈ!! 

*Keba kotambola bó ntaba na mokili ya nguma! 

Na mboka na biso,bakulutu bazalaká mpokwa nyoso kopesa masapo na bilenge. 

Wana naino basali bitaleli ya etando eke te ( tv) to bitaleli ya ba sateliti te (Internet) . . 

Ata ko babuku ya kotanga ezalaki ,kasi masapo wana mazalaki na elengi moko koleka na oyo tozalaki kotanga. 

Ezalaki mpo na biso koleka na masano ya théâtre oyo tokoma komona.Moto moko azali nkolo masapo te. Yango esali 'te soki oyoki lisapo ya kitoko okobomba yango malamu mpe kutu okolamba yango lisusu malamu penza po yo pe okabela baninga.
Masapo mana mazali kaka masolo te kasi matondi na bwanya mpe mayele ya mokili.
Lelo nakokaba lisapo moko nalandaki lobi na monoko ya moyembi moko na nkombo Pitshou Mwanza .Tolanda! 

 

Lisapo :KOTAMBOLA BO NTABA TE !

Ntaba moko azalaki koyengayenga na boluki matiti ya kitoko ya kolia.Yango ekumbaki ye tii na zamba oyo ezali pene ya mboka.Talaka ayoki mongongo moko mokobelelaka :- "nakufi eee!nakufi eee!," 

Apusana boye,amoni nguma akangemi na motambo.Nzete moko enyati ye, mayele aningana te. Nguma abondeli ntaba : -"ntaba bikisa ngai ee kotika moninga boye te !!! 

.Ntaba na mayele na ye ya mokuse, atomboli nzete, mpe nguma alongwe na motambo.
Kaka wana nguma akangi ntaba ,alingami na ye , mpe ntaba abandi kobelela:- "boni! boni !tika ngai nguma! ngai nalongoli yo na motambo,tika ngai nakende!". 

Kasi nguma azongisi -" ngai nazali na nzala,soki natiki yo nakolia nini?"
Mosika te na bango,mboloko azalaki koleka wana,  ayoki bango mpe apusani, atuni bango:-"likambo yango nini bokowelela boye?" 

Ntaba kuna akangemaki , aweleli koloba:-" nguma nabikisi ye na motambo, alingi aboma ngai,loba na ye atika ngai,  pema esili ngai!" 

Kasi se wana nguma pe alobi ya ye... 

Mboloko amikwanyi moto    pe alobi" : 

"-ooo ! ngai namoni 'te bino mibale bokoloba bosembo te ! Bomizongisa naino ndenge bozalaki uta ebandeli , mpo totala soki ya solo penza ezalaki bongo!"
Wana nguma ayoki boye, aweleli kofungola ntaba . Sima na yango nguma amilalisi pe ntaba azongisi nzete ya motambo likolo na ye. 

Mboloko atali boye pe moke te nguma abandi kobelela na mpasi ya kilo ya nzete:-"fungola ngai ee!  Longola nzete! kilo!"

Ntaba , na ndenge na ye,alingi apusana lisusu atombola motambo,kasi mboloko abendi ye na pwasa, pe alobi "boni yo bontaba boye! Ngai nasali boye mpo nabikisa yo ! mpe olingi lisusu kolongola ye? Yaka tokende,totika ye akufa na motema mabe na ye wana!!!" Mboloko na ntaba bakei ,batiki nguma akomilelaka:- " naaakufi eee! naaakufi eee!!! » 

Nani akobikisa ye?!
Na mokili kotambola bo-ntaba te! Mpo tozali na mokili ya nguma! Zala mayele na ekenge lokola mboloko . 

??Leobanem

page4image1651696.png 

 
 

 

 
 

 

 
 

 

 
 

 

 
 

 

 
 

 

 

CONTE : La chèvre, le boa et l'antilope 

 

Une chèvre était en train d’aller ça et là à la recherche de la bonne herbe à manger.Cela l’avait conduite  à l’orée de la forêt  proche du village.Voilà que soudain, elle entendit une voix qui criait  « je me meurs ! au secours! ! Au secours! »

 

Quand elle s’approcha des lieux, elle vit un boa pris dans un piège. Un gros tronc d’arbre l’écrasait, pas moyen de bouger.

Le boa supplia la chèvre: -" Chèvre, sauve-moi! n’abandonne  pas un camarade !!"

 

La chèvre avec sa petite intelligence, souleva l’arbre et le boa fut libéré du piège.

Voilà que sur ces entrefaites le boa attrapa la chèvre, s’enroula autour de son corps en serrant de plus en plus fort  et la  chèvre se mit à crier : "  - Comment donc!  laisse-moi , boa !! Moi je t’ai libéré du piège , laisse-moi partir!! »

 

Mais à cela le boa répondit:-" moi j’ai faim!! si je te relâche que vais-je manger? « 

  Non  loin de là passait  une antilope . Elle avait entendu leur dispute et se rapprocha. Elle les questionna: -"Pour quelle raison vous vous querellez ainsi? "   

 La chèvre, d’où  elle était bloquée, s’empressa de parler:-" Ce boa je l’ai sauvé du piège, il veut me tuer, dis-lui de me relâcher,  je n'ai plus de souffle!"

Mais, à cela , le boa argumenta en défendant  aussi sa thèse.    

L’Antilope se gratta  la tête et déclara:

- "Moi j’ai comme l’impression  que tous les deux ne dites  pas la vérité ! Remettez-vous un peu dans votre position de départ pour que je voie si réellement ça c'est passé comme vous dites !"

 Aussitôt qu’il eût  entendu cet avis, le boa s’empressa de s’exécuter et libéra la chèvre. 

Ensuite le boa s’étendit, et la chèvre remit sur lui le tronc d’arbre du piège.

L’antilope regardait  la scène en se grattant la tête, sans mot dire. Mais quelques temps après, le boa se mit à donner de la voix ,criant sa  douleur et implorant qu’on le libère du piège : -"  Dégage-moi ! Enlève ce tronc d’arbre! il m’écrase "! 

 

La chèvre, d'après sa manière de raisonner ,voulut de nouveau s’approcher pour soulever le tronc d’arbre ,mais l’antilope la retint prestement  et lui dit :- " Eh toi donc,  comment es-tu  si bête à ce point?! Moi, j’ai agis ainsi pour te sauver ,  toi tu veux encore le libérer du piège ?!! 

Viens ! Allons-nous en! Laissons le mourir de  sa méchanceté !"

Là dessus l’antilope et la chèvre s’en allèrent  , abandonnant le boa dans sa souffrance.  Et  voilà qu'il  continuait à crier « au secours! Au secours !"

Mais qui donc  va le  sauver ? 

-En ce monde,  ne sois  pas naïf! Car nous sommes dans le monde du boa! Sois futé  et prudent comme l’antilope!

(traduit par Leobanem)   

  

 

 
 

 

 

    

 


PARTAGEZ UN LIEN OU ECRIVEZ UN ARTICLE

Pas de commentaire

Pas de commentaire
 
LEOBANEM
Partagé par : LEOBANEM@France
VOIR SON BLOG 1 SUIVRE SES PUBLICATIONS LUI ECRIRE

SES STATS

1
Publications

0
J'aime Facebook sur ses publications

0
Commentaires sur ses publications

Devenez publicateur

Dernières Actualités

Pas d'article dans la liste.